Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzete yango ekolaki, ekomaki monene mpe makasi ; songe na yango etutaki mapata, ezalaki komonana wuta na basuka ya mabele ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:8
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?


Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.


Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, mikolo ya tango ya Moyize : Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ? Wapi Ye oyo atiaki kati na bango Molimo Mosantu na Ye ?


« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›


Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango.


Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika ; apesaki Daniele kombo Belitsatsari ; Anania, Shadraki ; Mikaeli, Meshaki ; mpe Azaria, Abedinego.


Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.


Mokonzi atunaki Daniele oyo bazalaki lisusu kobenga Belitsatsari : — Ozali na makoki ya koyebisa ngai makambo oyo namonaki na ndoto mpe kolimbola yango ?


Nabukodonozori atunaki bango : — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, ezali penza ya solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te mpe bozali kogumbamela te ekeko ya wolo oyo nasali ?


Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango ;


ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele, mpe ezalaki kopesa bilei na moto nyonso. Banyama ya zamba ezalaki koya kozwa pio na se ya elili na yango ; bandeke ya likolo ezalaki kovanda na bitape na yango : ezalaki kopesa bilei na bikelamu nyonso ya bomoi.


Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ