Daniele 4:7 - Mokanda na Bomoi7 Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai : « Nazalaki kotala, namonaki nzete moko ya monene etelema liboso na ngai, na kati-kati ya mabele, mpe ezalaki molayi makasi penza. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi : — Moto moko te kati na mokili akokoka kosala makambo oyo mokonzi azali kosenga. Mpe mokonzi moko te, ezala azalaki moto monene to moto na nguya, asila kosenga likambo ya boye epai ya banganga-kisi, epai ya bato ya mayele ya mabe mpe epai ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto.
Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.