Daniele 4:6 - Mokanda na Bomoi6 Nalobaki : — Belitsatsari, mokonzi ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, nayebi ete molimo ya banzambe ya bule ezali kati na yo, mpe ete mabombami moko te ezali pasi na kolimbola mpo na yo. Yoka ndoto oyo nalotaki mpe pesa ngai ndimbola na yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. »
Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
Mokonzi agangaki makasi mpe apesaki mitindo ete bamemela ye banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. Mpe mokonzi alobaki na bato oyo nyonso ya bwanya, ya Babiloni : — Moto nyonso oyo akokoka kotanga makomi oyo mpe akoyebisa ngai ndimbola na yango, nakolatisa ye bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe akozala kalaka ya lokumu kati na bokonzi.