Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili,


Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika ; apesaki Daniele kombo Belitsatsari ; Anania, Shadraki ; Mikaeli, Meshaki ; mpe Azaria, Abedinego.


Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.


mpe mokonzi ayebisaki bango : — Nalotaki ndoto moko oyo ezali kotungisa molimo na ngai makasi ; nazali na posa ya koyeba ndimbola na yango.


Na emoniseli oyo nazwaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, namonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola.


Tika ete motema na ye ya bomoto elongwa mpe azwa motema ya nyama kino mibu sambo ekoleka mpo na ye.


Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. »


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti ; alobaki : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela !


Ezali na moto moko kati na mokili na yo, oyo azali na molimo ya banzambe ya bule kati na ye. Tango tata na yo azalaki mokonzi, amonaki kati na ye bososoli, mayele mpe bwanya oyo ekokana na bwanya ya banzambe. Boye, tata na yo, mokonzi Nabukodonozori, akomisaki ye mokonzi ya banganga-kisi, ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.


Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Balitazari, mokonzi ya Babiloni, Daniele alotaki ndoto moko : bimoniseli eyaki na makanisi na ye tango azalaki ya kolala na mbeto na ye. Bongo, akomaki ndoto yango mpe alobaki mama na likambo na yango.


Lisolo ya ndoto na ngai esuki awa. Ngai, Daniele, namitungisaki mingi kati na motema na ngai, elongi na ngai ebebaki na somo mpe nabombaki makambo oyo kati na motema na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ