Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe bayaki epai na ngai, mpe nayebisaki bango ndoto yango ; kasi bakokaki te kopesa ngai ndimbola na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »


Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango lokola masanga ya vino oyo baningisi te, oyo babongoli na mbeki mosusu te, mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. Boye, elengi na yango ebongwana te mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.


Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi.


Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’


Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


Bato nyonso ya bwanya ya mokonzi bakotaki na kati, kasi bakokaki te kotanga makomi wana to koyebisa mokonzi ndimbola na yango.


Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ