Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:29 - Mokanda na Bomoi

29 Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:29
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »


Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.


Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›


« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.


Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe ; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.


milimo oyo etosaki te na tango ya kala, na tango oyo Nzambe azalaki kokanga motema wana azalaki kozela ete Noa asilisa kotonga masuwa. Kati na masuwa yango, motango moke kaka ya bato, bato mwambe, nde babikisamaki na mayi ya mpela.


Boyeba malamu ete ezali mpo na lobiko na bino nde Nkolo na biso azali nanu kokanga motema, ndenge Polo, ndeko na biso ya bolingo, akomelaki bino, kolanda bwanya oyo Nzambe apesaki ye.


Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ