Daniele 4:26 - Mokanda na Bomoi26 Sima na basanza zomi na mibale, wana mokonzi azalaki kotambola na veranda ya ndako ya bokonzi, na Babiloni, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. »
Babenganaki ye na molongo ya bato mpe bapesaki ye mayele ya banyama ; akomaki kovanda elongo na ba-ane ya zamba, kolia matiti lokola bangombe mpe nzoto na ye ezalaki kopola na mamwe ya tongo, kino tango asosolaki ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya bokonzi nyonso ya bato mpe atombolaka na bokonzi moto nyonso oyo Ye alingi.