Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:22 - Mokanda na Bomoi

22 « Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:22
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »


Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.


Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;


Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango : « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo.


Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.


Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.


Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpongo moko ya monene oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, ekendeki kotelema na Libani. Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele,


Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.


Agangaki na mongongo makasi : ‹ Bokweyisa nzete wana, bokata bitape na yango, bobuka makasa na yango mpe bopanza bambuma na yango ! Tika ete banyama ya zamba elongwa na se na yango mpe bandeke elongwa na bitape na yango !


Oh mokonzi, tala ndimbola na yango ; mpe ezali mokano ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo atombokeli nkolo na ngai :


Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. »


pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. »


Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ