Daniele 4:21 - Mokanda na Bomoi21 Oh mokonzi, tala ndimbola na yango ; mpe ezali mokano ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo atombokeli nkolo na ngai : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi, omonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola mpe koloba : « Kweyisa nzete wana mpe boma yango, kasi tika mobimbi na yango mpe kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba, mpe tika ete misisa na yango etikala na se ya mabele ! Tika ete mamwe epolisa yango mpe ebika lokola banyama ya zamba, kino mibu sambo ekoleka mpo na ye. »
« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.