Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:2
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.


Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.


Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ; osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.


Bino nyonso oyo botosaka Nzambe, boya koyoka ! Nakoyebisa bino makambo oyo asali mpo na bomoi na ngai.


Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.


Na mobu ya mibale ya bokonzi na ye, Nabukodonozori alotaki ndoto. Molimo na ye etungisamaki makasi mpe pongi ekimaki ye.


Nabukodonozori apusanaki pene ya monoko ya libulu ya moto mpe agangaki na mongongo makasi : — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bobima kuna mpe boya awa ! Shadraki, Meshaki mpe Abedinego babimaki wuta na libulu ya moto.


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo : ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo ! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa ! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › »


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.


Oh mokonzi, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apesaki tata na yo, Nabukodonozori, bokonzi ; akomisaki ye moto monene mpe apesaki ye nkembo mpe lokumu.


Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko ; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Yesu alobaki na ye : — Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?


Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ