Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Agangaki na mongongo makasi : ‹ Bokweyisa nzete wana, bokata bitape na yango, bobuka makasa na yango mpe bopanza bambuma na yango ! Tika ete banyama ya zamba elongwa na se na yango mpe bandeke elongwa na bitape na yango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 4:11
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »


mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango ; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango ; bongo etikalaki yango moko.


Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi koleka banzete nyonso ya zamba ; bitape na yango ekomaki milayi, mpe makasa na yango ekomaki ebele, pamba te ezalaki kozwa mayi ebele.


Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.


Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ