Daniele 3:8 - Mokanda na Bomoi8 Kaka na tango yango, ndambo ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto bayaki kofunda Bayuda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
bilenge mibali oyo banzoto na bango ezanga mbeba, ya bilongi kitoko, ya mayele mpe ya bwanya, oyo bazali na makoki ya koyekola kotanga mpe kokoma makambo ya ndenge na ndenge, oyo bazali na bososoli mpe bakoka mpo na kosala kati na ndako ya mokonzi ; Ashipenazi asengelaki kolakisa bango koloba, kokoma mikanda mpe kotanga lokota ya bato ya Babiloni.
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na mokonzi : — Moto moko te kati na mokili akokoka kosala makambo oyo mokonzi azali kosenga. Mpe mokonzi moko te, ezala azalaki moto monene to moto na nguya, asila kosenga likambo ya boye epai ya banganga-kisi, epai ya bato ya mayele ya mabe mpe epai ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto.
Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.