Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yango wana, tango kaka bayokaki lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya bibetelo mindule lolenge nyonso, bato ya bikolo nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso bafukamaki mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe ; ezalaki kolangwisa mokili mobimba. Bongo bato ya bikolo bameli masanga na yango mpe bakomi lokola bazoba.


Boye, mokonzi Nabukodonozori agumbamaki elongi kino na mabele, liboso ya Daniele, mpe apesaki ye lokumu ; apesaki mitindo ete bapesa ye makabo mpe babonzela ye malasi ya ansa.


Oh mokonzi, opesaki mitindo ete moto nyonso oyo akoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule afukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo ;


Molobeli ya mokonzi atatolaki na mongongo makasi : — Bino bato ya bikolo nyonso mpe ya nkota nyonso, tala makambo oyo bosengeli kosala :


« Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya lolenge nyonso ya bibetelo mindule, bosengeli kofukama mpo na kogumbamela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nabukodonozori asalisi.


Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, bakobwaka ye mbala moko kati na libulu ya moto. »


Kaka na tango yango, ndambo ya bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto bayaki kofunda Bayuda.


Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi.


Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.


Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango.


Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki.


Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ