Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:27 - Mokanda na Bomoi

27 Bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka, bakalaka oyo babatelaka biloko ya mokonzi, bayangeli mpe bapesi toli ya mokonzi bazingelaki bango ; mpe bamonaki ete moto ezikisaki te ezala banzoto na bango, suki ya mito na bango to bilamba na bango, mpe batikalaki koyoka bango ata solo ya moto te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:27
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! »


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango !


Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;


Boye, bakangaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga, wana balataki bilamba na bango, banzambala na bango, bakazaka na bango, bitendi na bango oyo bakangaka na moto mpe bilamba mosusu, mpe babwakaki bango kati na libulu ya moto.


Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko ; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.


Bakalaka ya lokumu mpe bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka bakendeki lisanga epai ya mokonzi mpe balobaki : — Tika ete mokonzi Dariusi awumela na bomoi seko na seko !


Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.


Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu ; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nandimisami ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalemaki na nkuku te.


Nasengi na bino ete bolia sik’oyo. Bosengeli na yango mpo ete bozala na bomoi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.


balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ