Daniele 3:25 - Mokanda na Bomoi25 Alobaki na bapesi toli na ye : — Botala ! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te ; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nabukodonozori alobaki : — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.