Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:18
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Atako bongo, nabombi kati na Isalaele bato nkoto sambo, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te, mpe minoko na bango epesi ye beze te.


Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.


Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.


Nabukodonozori alobaki : — Tika ete Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego akumisama ; Ye nde atindaki anjelu na Ye mpo ete abikisa basali na Ye, pamba te batielaka Ye motema ! Batosaki mitindo ya mokonzi te mpe bandimaki kobungisa bomoi na bango na esika ya kosalela mpe kogumbamela nzambe mosusu, soki Nzambe na bango te.


Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.


Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.


Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.


Yesu azongiselaki bango : — Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! »


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu ;


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ