17 Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.
Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
Okolendisama kati na bosembo : minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo ; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.
Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.
Nabukodonozori apusanaki pene ya monoko ya libulu ya moto mpe agangaki na mongongo makasi : — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bobima kuna mpe boya awa ! Shadraki, Meshaki mpe Abedinego babimaki wuta na libulu ya moto.
Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.
Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko ; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko ; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.
Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.
Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.
Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.