Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:15 - Mokanda na Bomoi

15 Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:15
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »


Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki.


Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !


Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »


Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino ! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana ! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango.


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.


Na tongo-tongo, mokonzi atelemaki mpe akendeki na lombangu na libulu ya bankosi.


Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.


Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »


Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.


Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Kasi Petelo mpe bantoma mosusu bazongisaki : — Esengeli kotosa Nzambe, kasi bato te !


Bato nyonso oyo bavandaki na Likita-Monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ