Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nabukodonozori atunaki bango : — Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, ezali penza ya solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te mpe bozali kogumbamela te ekeko ya wolo oyo nasali ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:14
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.


« Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›


Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni.


Nzete yango ekolaki, ekomaki monene mpe makasi ; songe na yango etutaki mapata, ezalaki komonana wuta na basuka ya mabele ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ