Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni : Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te : bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 3:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Mokonzi ya bakalaka ya lokumu apesaki bango bakombo ya sika ; apesaki Daniele kombo Belitsatsari ; Anania, Shadraki ; Mikaeli, Meshaki ; mpe Azaria, Abedinego.


Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.


Daniele asengaki na mokonzi Nabukodonozori ete atia Shadraki, Meshaki mpe Abedinego lokola bayangeli ya etuka mobimba ya Babiloni wana ye moko Daniele atikalaki kosala pembeni ya mokonzi.


mpe ete moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, babwaka ye kati na libulu ya moto !


Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori : — Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo.


Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !


Sima na yango, mokonzi atombolaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na etuka ya Babiloni.


Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki : — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi ; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi ? Mokonzi azongisaki : — Ezali penza bongo ! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.


Balobaki lisusu na mokonzi : — Daniele, moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, azali kotosa yo te, ezala mokano oyo okomaki na mokanda mpe otiaki mokoloto ; azali kokoba kaka kosambela mbala misato na mokolo.


mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »


Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ