Daniele 2:9 - Mokanda na Bomoi9 Soki boyebisi ngai ndoto yango te, boyeba malamu ete etumbu moko kaka mpe ya ndenge moko ezali kozela bino ! Ah, boyokani koyebisa ngai makambo ya lokuta mpe ya mabe mpo bokanisi ete makambo ekobongwana ! Mpo na yango, boyebisa ngai ndoto yango, mpe nakondima ete bozali na makoki ya kolimbola yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
— Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te.
Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.