Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto : — Tala mokano oyo nasili kozwa : « Soki boyebisi ngai te ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango, nakokata bino biteni-biteni mpe nakobuka-buka bandako na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 2:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo.


Bongo tala mokano oyo nasili kozwa mpo na moto nyonso oyo akobongola to akotosa te mitindo oyo : bakolongola libaya moko kati na ndako na ye, bakotelemisa yango, bakodiembika ye na libaya yango mpe bakokomisa ndako na ye mopiku ya biloko ya mbindo.


Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.


Nzambe, buka minu na bango kati na minoko na bango ; Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.


Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi ; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.


Yango wana, nazwi mokano ete moto nyonso, azala ya mokili, ekolo to lokota nini, oyo akoloba mabe mpo na Nzambe ya Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, bakokata-kata ye na biteni, bakobuka ndako na ye mpe bakokomisa yango mopiku ya mbindo, pamba te Nzambe mosusu azali te, oyo akoki kobikisa bato na Ye na lolenge oyo !


ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele, mpe ezalaki kopesa bilei na moto nyonso. Banyama ya zamba ezalaki koya kozwa pio na se ya elili na yango ; bandeke ya likolo ezalaki kovanda na bitape na yango : ezalaki kopesa bilei na bikelamu nyonso ya bomoi.


osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso : bato na yango mpe bibwele na yango.


Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ