Daniele 2:45 - Mokanda na Bomoi45 Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.