Daniele 2:41 - Mokanda na Bomoi41 Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana ; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.