Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 2:40 - Mokanda na Bomoi

40 Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende ; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 2:40
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,


Boni, moto akoki penza kobuka ebende ? Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze ?


makolo na yango ezalaki ya ebende, matambe na yango ezalaki, ndambo moko ya ebende, mpe ndambo mosusu, ya mabele oyo basalelaka bikeko.


Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya ; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba : yango nde ezali kolakisa bronze.


Mpe ndenge kaka omonaki ete matambe mpe misapi ya makolo na yango ezali ndambo moko, ya mabele oyo basalelaka bikeko, mpe ndambo mosusu, ya ebende, elingi koloba ete bokonzi yango ekokabwana ; kasi kati na yango, ekozala na eloko moko ya makasi lokola ebende, ndenge kaka omonaki ebende basangisa na mabele oyo basalelaka bikeko.


Sima na yango, kati na emoniseli na ngai ya butu, namonaki nyama ya minei : ezalaki somo, ezalaki kobangisa mpe ezalaki na nguya makasi penza. Ezalaki na minu minene ya bibende ; ezalaki kolia, kopanzapanza mpe konyata misuni oyo ezalaki kotikala ; ekesenaki makasi na banyama nyonso ya liboso mpe ezalaki na maseke zomi.


akokoma makasi koleka, kasi na nguya na ye moko te. Akobebisa mokili na ndenge ya kokamwa mpe akolonga na makambo nyonso oyo akosala ; akoboma bato ya makasi mpe basantu.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele mpo na kosala bilanga.


Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye ; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ