Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 2:39 - Mokanda na Bomoi

39 Sima na yo, bokonzi mosusu ekobima, kasi ekoleka bokonzi na yo te na nguya ; bongo na sima, bokonzi ya misato ekobima mpe ekokonza na mabele mobimba : yango nde ezali kolakisa bronze.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 2:39
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalobi na tina na Sirisi : ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi : ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ mpe na tina na Tempelo : ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »


Boye, elobaki : — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ;


moto na yango ezalaki ya wolo ya peto, tolo mpe maboko na yango ezalaki ya palata, libumu mpe loketo na yango ezalaki ya bronze,


atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka ! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.


Mpe na suka, bokonzi ya minei ekobima, ekozala makasi lokola ebende ; ndenge ebende ebukaka, enikaka mpe epanzaka nyonso, ndenge wana mpe ekobuka mpe ekopanza babokonzi mosusu ya liboso.


Moto oyo natunaki ndimbola ya ndoto alobaki na ngai : — Nyama oyo ya minei ezali mokonzi ya minei oyo akobima na mabele. Akokesana makasi na babokonzi wana nyonso : akoboma mokili mobimba, akonyata mpe akopanza-panza yango.


Maseke mibale ya meme ya mobali oyo omonaki ezali kolakisa bakonzi ya Medi mpe ya Persi.


Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso.


Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi.


Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ