Daniele 2:37 - Mokanda na Bomoi37 Oh mokonzi, ozali mokonzi ya bakonzi ! Nzambe ya Lola apesaki yo makasi mpe nguya, bokonzi mpe nkembo ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »
« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.