Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo : bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo.
Mokonzi Nabukodonozori asalisaki ekeko moko ya wolo, oyo ezalaki na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene misato na mokuse. Atelemisaki yango kati na etando ya Dura, na etuka ya Babiloni.