Faraon alobaki na Jozefi : — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.