Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 2:29 - Mokanda na Bomoi

29 « Oh mokonzi, wana ozalaki ya kolala na mbeto na yo, okomaki kokanisa makambo oyo ekoya na sima ya tango ; bongo, Ye oyo alakisaka mabombami alakisaki yo makambo oyo ekoya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 2:29
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi alobaki na Faraon : — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.


Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.


Oh Nzambe ya batata na ngai, nazali kosanzola mpe kokumisa Yo mpo na bwanya mpe nguya oyo opesi ngai, pamba te oyebisi ngai makambo oyo tosengaki Yo mpe otalisi biso ndoto ya mokonzi.


kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo :


Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.


Mokonzi alobaki na Daniele : « Solo, Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bakonzi mpe Molakisi mabombami, mpo ete okoki kolakisa mabombami oyo ! »


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ