Daniele 2:25 - Mokanda na Bomoi25 Arioki amemaki Daniele na lombangu liboso ya mokonzi mpe alobaki na ye : — Mokonzi, namoni moto moko kati na bawumbu oyo bawutaki na Yuda, oyo akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye mpe kolimbola yango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki : — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi ; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi ? Mokonzi azongisaki : — Ezali penza bongo ! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.