Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba.
« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.
Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »
Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;