Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mbala moko, mokonzi asilikaki mpe atombokaki makasi ; apesaki mitindo ete baboma bato nyonso ya bwanya ya Babiloni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 2:12
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.


Sima na yango, Daniele akendeki epai ya Arioki oyo mokonzi apesaki mokumba ya koboma bato ya bwanya ya Babiloni ; alobaki na ye : — Koboma bato ya bwanya ya Babiloni te ! Mema ngai epai ya mokonzi, mpe nakopesa ye ndimbola ya ndoto na ye.


Mokonzi alobaki na bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto : — Tala mokano oyo nasili kozwa : « Soki boyebisi ngai te ndoto oyo nalotaki mpe ndimbola na yango, nakokata bino biteni-biteni mpe nakobuka-buka bandako na bino.


Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi.


Nabukodonozori atombokelaki makasi Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, mpe akangelaki bango elongi ; apesaki mitindo ete bapelisa moto makasi penza mbala sambo koleka ndenge bapelisaka yango tango nyonso.


Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.


Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ