Daniele 12:6 - Mokanda na Bomoi6 Moko kati na bango alobaki epai ya moto oyo alataki bilamba ya lino mpe atelemaki likolo ya mayi ya ebale : — Makambo oyo ya kokamwa ekosala tango boni ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze.
Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.