Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko.
Mampinga ya basoda na ye bakotelema mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo mpe kobuka engumba batonga makasi ; bakopekisa kobonza mbeka ya mokolo na mokolo mpe bakotonga etumbelo mpo na nzambe oyo babengaka Zewusi.
akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.
Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;
Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.
Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe ; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale.