Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.
Mokonzi ya sude akokoma makasi koleka, kasi moko ya bakonzi na ye ya basoda akokoma lisusu makasi koleka ye mpe akotambolisa mokili na nguya makasi koleka.
Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.
Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.