Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:8 - Mokanda na Bomoi

8 Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:8
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ?


Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango.


Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.


Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye.


Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te ; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te.


Mokonzi ya nor akokota na makasi kati na mokili ya mokonzi ya sude, kasi akozonga na mokili na ye.


Ata Efrayimi azali kofuluka kati na bandeko na ye ya mibali, mopepe ya este ekoya, mopepe ya Yawe ekoya wuta na esobe : ekokawusa etima ya Efrayimi, ekokawusa liziba na ye. Monguna akobotola ye biloko nyonso ya talo wuta na ebombelo na yango. »


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana.


Mika azongisaki : — Bozwi banzambe na ngai, oyo nasalaki, nganga-nzambe na ngai, mpe bokeyi na bino ; eloko nini natikali na yango lisusu ? Ndenge nini bokoki kotuna ngai : « Likambo nini ezwi yo ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ