44 Kasi basango oyo akozwa wuta na este mpe na nor ekotungisa ye, mpe akobima na mokili na kanda makasi mpo na koboma mpe kosilisa bato ebele.
Mokonzi ya sude akobima na kanda, akosangisa mampinga moko monene, akobundisa mokonzi ya mokili ya nor mpe akolonga ye.
Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye ; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule.
Akobotola wolo, palata mpe bomengo nyonso ya mokili ya Ejipito, bongo bato ya Libi mpe ya Kushi bakosala ndenge moko kaka na ye.
Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.
Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.
Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko : kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama.