Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:4
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko, azalaki ata na mwana to ndeko te ; azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi, kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye. Mpe atikalaki komituna te : « Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ? Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo ? » Wana mpe lisusu ezali pamba : ezali mosala ya mpunda !


Kasi sima na Ngai kobengana bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa moko na moko kati na libula na ye mpe kati na mokili na ye.


Kasi ekolo oyo ekoyoka te, nakobengana bango nyonso mpe nakobebisa bango, » elobi Yawe.


Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo,


Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »


Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.


Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, wuta na basonge minei ya lola, nakopanza bango na mokili mobimba mpe akozala na ekolo moko te oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima.


Yawe alobaki na ngai : — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! »


Daniele alobaki : Na emoniseli oyo nazwaki na butu, namonaki mipepe minei kowuta na likolo mpe eningisaki ebale monene.


Sima na yango, nakobaki kotala mpe namonaki nyama mosusu : ezalaki lokola nkoyi, mpe mokongo na yango ezalaki na mapapu minei lokola mapapu ya ndeke. Nyama yango ezalaki na mito minei, bongo bapesaki yango bokonzi ya kokamba.


Wana nazali kotala malamu maseke, namonaki liseke mosusu ya moke kobima kati na maseke wana ; bongo maseke misato kati na maseke ya liboso elongwaki liboso ya liseke ya moke oyo ezalaki na miso lokola ya moto mpe monoko oyo ezalaki koloba na lolendo.


Tango liseke yango ebukanaki, maseke minei ebimaki na esika na yango : ezali kolakisa ete babokonzi minei ekobima wuta na ekolo oyo, kasi nguya na yango ekokokana te.


Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.


Natunaki ye : — Ozali kokende wapi ? Azongiselaki ngai : — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.


Azongiselaki ngai : — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.


Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »


Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ