Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:30 - Mokanda na Bomoi

30 Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye ; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:30
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.


Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.


Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.


Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.


alobaki : « Okosepela lisusu te, yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo ! Telema, katisa na ngambo ya Shipele ! Ezala kuna, okozwa bopemi te. »


Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi mpe botala malamu, botinda bato na Kedari mpe botala malamu ; botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.


basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;


Mokonzi ya nor akozonga na mokili na ye na bomengo ebele, kasi makanisi ya motema na ye ekotelemela boyokani ya bule ; mpe akokokisa yango liboso ete azonga na mokili na ye.


Na tango oyo ekatama, akokota lisusu na mokili ya sude na makasi ; kasi na mbala oyo, makambo ekosalema ndenge moko te na mbala oyo ya liboso.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »


Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.


Yango wana, yo Lola, sepela ; mpe bino bavandi ya Lola, bosepela ! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te Satana akiti epai na bino ! Atondi na kanda, pamba te ayebi malamu ete atikali kaka na tango moke. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ