Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye : — Elize alobi na yo nini ? Azongisaki : — Alobi na ngai : « Solo, okobika na bokono oyo. »
Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.
Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.
Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »