Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:25 - Mokanda na Bomoi

25 Akovandisa makanisi na ye mpe akotelema na mpiko, akosangisa mampinga monene mpo na kobundisa mokonzi ya sude. Mpe mokonzi ya sude akosangisa mampinga monene mpe ya nguya mpo na kobundisa ye, kasi akolonga te mpo na likita oyo basalelaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:25
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.


Moto ya lokoso ayeisaka koswana, kasi moto oyo atiaka elikya na Yawe akotonda na mafuta.


Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.


Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo : « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi ; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese.


Na tango ya suka, mokonzi ya sude akobundisa mokonzi ya nor, kasi mokonzi ya nor akobimela ye elongo na bashar, bampunda mpe bamasuwa ya bitumba. Akokota na makasi na bikolo ebele mpe akomema lokola mpela eloko nyonso oyo akomona na nzela.


Mokonzi ya sude akokoma makasi koleka, kasi moko ya bakonzi na ye ya basoda akokoma lisusu makasi koleka ye mpe akotambolisa mokili na nguya makasi koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ