Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:24 - Mokanda na Bomoi

24 Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala : akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye ; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:24
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.


Kanyaka ezalaka lokola kisi na miso ya moto oyo azali na yango ; alongaka na esika nyonso oyo akendaka.


Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.


pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.


Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele ; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe.


Atako basalaki boyokani elongo na ye, akosalela kaka mayele mabe ; akobebisa boyokani oyo basalaki, akobundisa bango mpe akolonga na nzela ya bato moke kaka.


akotiola na maloba na ye Ye-Oyo-Aleki-Likolo, akonyokola basantu na Ye, akomeka ata kobongola manaka ya bafeti oyo ekatama mpe mibeko. Basantu bakozala na se ya bokonzi na ye mibu misato na ndambo.


Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.


Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?


Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ