Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mampinga ya banguna bakokweya liboso na ye, mampinga yango mpe mokonzi ya boyokani bakobebisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa, boyokani elongo na mboka ya bakufi. Tango likama ya makasi ekoya, ekozwa biso te ; pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. »


Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.


Atako basalaki boyokani elongo na ye, akosalela kaka mayele mabe ; akobebisa boyokani oyo basalaki, akobundisa bango mpe akolonga na nzela ya bato moke kaka.


Na mayele mabe na ye, akolonga kokosa bato ebele mpe akokoma na motema ya lofundu ; akoboma bato ebele oyo bazalaki na bango na kimia mpe akotelemela Mokambi ya bakambi, kasi akobebisama na nguya ya moto te.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.


Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ