20 Mokitani na ye akotinda mofutisi mpako moko na esika oyo eleki lokumu kati na mokili. Sima na mwa mikolo, mokonzi mpe akobebisama, kasi ekozala na botomboki te mpe na bitumba te.
Yeoyakimi afutaki epai ya Faraon Neko palata mpe wolo oyo asengaki. Mpo na kofuta yango, Yeoyakimi asengaki ete bato ya mokili bafuta mpako. Afutisaki bato mpako ya palata to ya wolo kolanda bozwi na bango.
Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata ; na esika ya banzete, nakomemela yo bronze ; mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende ; nakokomisa Kimia moyangeli na yo, mpe Bosembo, mokambi na yo.
Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye ; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe.
Moko kati na bakitani na ye akobima mpe akozwa esika na ye ; akobundisa mampinga ya mokonzi ya nor mpe akokota kati na engumba na ye, oyo batonga makasi ; akobundisa bango mpe akolonga bango.