Daniele 11:17 - Mokanda na Bomoi17 Akozwa mokano ya koya elongo na mampinga ya mokili na ye mobimba mpe akosala boyokani elongo na mokonzi ya sude. Mokonzi ya nor akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpo ete akoka kobebisa mokili na ye, kasi mabongisi na ye ekolonga te mpe akozwa mokili yango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.