Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Daniele 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Mokonzi ya nor akosala makambo nyonso oyo alingi mpe moto moko te akokoka kotelema liboso na ye. Akovanda na mokili oyo eleki kitoko mpe akobebisa yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Daniele 11:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. »


Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.


Kasi mokonzi moko ya nguya koleka akobima mpe akokamba na nguya nyonso, akosala makambo oyo alingi.


Mokonzi akosala makambo oyo alingi, akokoma lolendo, akotombola mapeka liboso ya banzambe nyonso mpe akoloba makambo ezanga tina mpo na kotiola Nzambe ya banzambe ; akolonga kino tango kanda makasi ya Nzambe ekosila, pamba te makambo nyonso oyo ekatama esengeli kokokisama.


Akokota lisusu na makasi na mokili ya kitoko. Bikolo ebele ekokweya, kasi Edomi, Moabi mpe bakonzi ya Amoni bakokima ye.


Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.


Mpo na lokumu oyo apesaki ye, bato ya bikolo, ya mikili mpe ya nkota nyonso bakomaki kolenga na somo liboso na ye. Mokonzi azalaki koboma bato oyo azalaki na posa ya koboma, kobikisa bato oyo azalaki na posa ya kobikisa, kotombola bato oyo azalaki na posa ya kotombola mpe kosambwisa bato oyo azalaki na posa ya kosambwisa.


Bongo, namonaki meme ya mobali ezali kobeta na ngambo ya weste, ya nor mpe na sude. Nyama moko te ekokaki kobundisa yango mpe moto moko te akokaki kokangola soki ekangi yango. Ezalaki kosala nyonso oyo yango elingi mpe ezalaki kokola.


Namonaki ntaba yango kopusana pene ya meme ya mobali na kanda makasi, ebetaki meme ya mobali mpe ebukaki yango maseke nyonso mibale ; meme ezalaki ata na makasi te ya kobundisa ntaba. Boye, ntaba ebwakaki meme na mabele mpe enyataki yango ; mpe ezalaki na moto moko te mpo na kobikisa meme ya mobali na maboko ya ntaba wana.


Bongo, wuta na moko kati na maseke nyonso minei, liseke moko ya moke ebimaki. Ekolaki makasi, mpe nguya na yango ekomaki na ngambo ya sude, ya este mpe na ngambo ya Mokili oyo eleki kitoko.


Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ