14 Na tango wana, bato ebele bakotombokela mokonzi ya mokili ya sude. Bato ya mobulu kati na bato na yo, Daniele, bakotomboka mpo ete emoniseli ekokokisama, kasi bakolonga te.
Pamba te mokonzi ya mokili ya nor akosangisa mampinga monene ya basoda koleka oyo ya liboso mpe, sima na mibu ebele, akozonga elongo na mampinga ya basoda ebele mpe na bibundeli ebele.
Mokonzi ya mokili ya nor akoya kotonga mwa bangomba ya mabele zingazinga ya engumba oyo batonga makasi mpe akobotola yango. Mampinga ya basoda ya mokonzi ya sude bakokoka kobundisa ye te. Ezala basoda na bango ya mpiko, bakozala ata na makasi ya kobunda te.
Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama.