7 Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki.
Azongisaki : — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.
Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye !
« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.
« Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo ;
Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.
Bato oyo bazalaki kokende mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba ; bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.
Mpo na somo makasi ya makambo oyo amonaki, Moyize agangaki : « Nazali kolenga na somo ! »