Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.
Boye, wana ngai, Daniele, nazalaki kotala, namonaki bato mibale batelemi liboso na ngai : moko azalaki na ngambo moko ya ebale, mpe mosusu azalaki na ngambo mosusu ya ebale.
Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.